Kolimbola Mibeko 8:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpe osengeli kokanisa nzela nyonso oyo Yehova Nzambe na yo atambwisaki yo mbula ntuku minei (40) oyo, na esobe,+ mpo na koteya yo komikitisa,+ komeka+ yo mpo na koyeba oyo ezalaki na motema na yo,+ soki okobatela mitindo na ye to te. Nehemia 9:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Mpe opesaki bango bilei na esobe mbula ntuku minei (40).+ Bazangaki eloko te.+ Bilamba na bango ekufaki te,+ mpe makolo na bango evimbaki te.+ Nzembo 78:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Mpe akobaki konɔkisela bango mana mpo bálya,+Mpe apesaki bango mbuma ya likoló.+ Yoane 6:49 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 49 Bankɔkɔ na bino balyaki mana+ na esobe kasi bakufaki.
2 Mpe osengeli kokanisa nzela nyonso oyo Yehova Nzambe na yo atambwisaki yo mbula ntuku minei (40) oyo, na esobe,+ mpo na koteya yo komikitisa,+ komeka+ yo mpo na koyeba oyo ezalaki na motema na yo,+ soki okobatela mitindo na ye to te.
21 Mpe opesaki bango bilei na esobe mbula ntuku minei (40).+ Bazangaki eloko te.+ Bilamba na bango ekufaki te,+ mpe makolo na bango evimbaki te.+