35 Mpe bana ya Yisraele balyaki mana mbula ntuku minei (40),+ tii ntango bakómaki na mokili oyo bato bafandi.+ Mana ezalaki eloko oyo bazalaki kolya tii ntango bakómaki na ndelo ya mokili ya Kanana.+
33 Mpe bana na bino bakokóma babateli ya mpate na esobe+ mbula ntuku minei (40), mpe basengeli kozongisa monɔkɔ mpo na misala na bino ya pite,+ kino bibembe na bino ekokóma na nsuka na yango na esobe.+
7 Mpo Yehova Nzambe na yo apamboli yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo.+ Ayebi malamu ndenge otamboli na esobe monene oyo. Mbula ntuku minei (40)+ oyo, Yehova Nzambe na yo azalaki elongo na yo. Ozangaki eloko te.”’+