Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo batyelaki bango bakapita ya kosalisa bango misala ya makasi mpo na konyokola bango ntango bazali komema mikumba na bango ya kilo;+ mpe babandaki kotonga bingumba mpo ezala bisika ya kobombela Farao biloko, elingi koloba, Pitome ná Raamesese.+

  • Kobima 6:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ngai, ɛɛ ngai, nayoki kokimela ya bana ya Yisraele,+ oyo Baezipito bazali kokómisa baombo, mpe nazali kokanisa kondimana na ngai.+

  • Nzembo 106:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Mpe azalaki komona mpasi na bango+

      Ntango azalaki koyoka ndenge bazalaki kosɛngasɛnga na kolela.+

  • Yisaya 63:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.+ Mpe momemi-nsango na ye moko mpenza abikisaki bango.+ Na bolingo na ye mpe na motema mawa na ye, ye moko asikolaki bango,+ mpe atombolaki bango mpe amemaki bango mikolo nyonso ya ntango ya kala.+

  • Misala 7:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Ya solo, namoni konyokwama oyo bato na ngai oyo bazali na Ezipito bazali konyokwama,+ mpe nayoki kokimela na bango+ mpe nakiti mpo na kobikisa bango.+ Mpe sikoyo yaká, nakotinda yo na Ezipito.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto