Kobima 3:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpe Yehova abakisaki ete: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.+ Basambisi 10:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpe babandaki kolongola banzambe ya bapaya na kati na bango+ mpe kosalela Yehova;+ bongo molimo na ye+ ekokaki lisusu te kokanga motema mpo na mpasi ya Yisraele.+
7 Mpe Yehova abakisaki ete: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.+
16 Mpe babandaki kolongola banzambe ya bapaya na kati na bango+ mpe kosalela Yehova;+ bongo molimo na ye+ ekokaki lisusu te kokanga motema mpo na mpasi ya Yisraele.+