9 Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.+ Mpe momemi-nsango na ye moko mpenza abikisaki bango.+ Na bolingo na ye mpe na motema mawa na ye, ye moko asikolaki bango,+ mpe atombolaki bango mpe amemaki bango mikolo nyonso ya ntango ya kala.+