42 mpo mobomi-moto oyo abomi moninga na ye kozanga koyeba,+ nzokande azalaki koyina ye liboso te,+ akima kuna; mpe asengeli kokima na moko ya bingumba yango mpe kozala na bomoi,+
3 Okomibongisela nzela, mpe osengeli kokabola na biteni misato teritware ya mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo akopesa yo mpo ezala ya yo, mpe esengeli kozala mpo moto nyonso oyo abomi moto akima kuna.+
7 Bongo basantisaki Kedeshe+ na Galile, na etúká ya ngombangomba ya Nafatali, mpe Shekeme+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime, mpe Kiriate-arba,+ elingi koloba: Hebrone, na etúká ya ngombangomba ya Yuda.