13 Kasi soki moto abatami te mpo na kozela mpe Nzambe ya solo atiki ete likambo yango esalema na lobɔkɔ na ye,+ boye nasengeli kotyela yo esika akoki kokima.+
42 mpo mobomi-moto oyo abomi moninga na ye kozanga koyeba,+ nzokande azalaki koyina ye liboso te,+ akima kuna; mpe asengeli kokima na moko ya bingumba yango mpe kozala na bomoi,+
4 “Sikoyo talá ndenge ya kosala na likambo ya mobomi-moto oyo akoki kokima kuna mpe asengeli kotikala na bomoi: Soki abɛti moninga na ye kozanga koyeba, nzokande azalaki koyina ye liboso te;+