Balevi 6:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 to eloko nyonso oyo akokaki kolapela yango ndai ya lokuta, mpe asengeli kofuta+ yango na motuya na yango mobimba, mpe akobakisa na motuya yango moko ya bandambo mitano na yango. Akopesa yango nkolo na yango na mokolo oyo ngambo na ye ekomonisama. Balevi 22:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 “‘Sikoyo soki moto alei eloko moko mosantu na nko te,+ asengeli kobakisa likoló na yango moko ya bandambo mitano+ mpe asengeli kopesa nganga-nzambe eloko mosantu yango. Balevi 27:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Kasi soki alingi mpenza kosomba yango lisusu, asengeli kobakisa moko ya bandambo mitano+ na motuya oyo ekatami. Mitángo 5:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpe basengeli koyambola+ lisumu oyo basali, mpe asengeli kozongisa motuya mobimba ya ngambo na ye, mpe kobakisa likoló na yango moko ya bandambo mitano,+ mpe asengeli kopesa yango moto oyo ye asalelaki mabe.
5 to eloko nyonso oyo akokaki kolapela yango ndai ya lokuta, mpe asengeli kofuta+ yango na motuya na yango mobimba, mpe akobakisa na motuya yango moko ya bandambo mitano na yango. Akopesa yango nkolo na yango na mokolo oyo ngambo na ye ekomonisama.
14 “‘Sikoyo soki moto alei eloko moko mosantu na nko te,+ asengeli kobakisa likoló na yango moko ya bandambo mitano+ mpe asengeli kopesa nganga-nzambe eloko mosantu yango.
13 Kasi soki alingi mpenza kosomba yango lisusu, asengeli kobakisa moko ya bandambo mitano+ na motuya oyo ekatami.
7 Mpe basengeli koyambola+ lisumu oyo basali, mpe asengeli kozongisa motuya mobimba ya ngambo na ye, mpe kobakisa likoló na yango moko ya bandambo mitano,+ mpe asengeli kopesa yango moto oyo ye asalelaki mabe.