Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 9:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kaka nde bosengeli kolya+ mosuni ná molimo na yango te,+ elingi koloba makila na yango.+

  • Balevi 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “‘Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino, na bisika na bino nyonso ya kofanda: bosengeli kolya mafuta ata moke te to makila+ ata moke te.’”

  • Balevi 17:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘Moto nyonso ya ndako ya Yisraele to mopaya moko oyo azali kofanda mopaya na kati na bino, oyo alei lolenge nyonso ya makila,+ nakotɛmɛla mpenza molimo+ oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye.

  • Kolimbola Mibeko 12:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kaka makila nde bosengeli kolya te.+ Okosopa yango na mabele lokola mai.+

  • 1 Samwele 14:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Bongo bayebisaki Saulo ete: “Talá! Bato bazali kosalela Yehova lisumu na ndenge bazali kolya biloko ná makila.”+ Na yango ye alobaki boye: “Bosali na bosembo te. Bóbalusa naino libanga moko ya monene awa epai na ngai.”

  • Ezekiele 33:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Na yango, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bozali se kolya misuni elongo na makila,+ mpe bozali se kotombola miso na bino epai ya bikeko na bino ya bosɔtɔ,+ mpe bozali se kosopa makila.+ Bongo bokozwa nde mokili yango?+

  • Misala 15:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 kasi ya kokomela bango ete báboya biloko oyo ekómisami mbindo na bikeko+ mpe pite+ mpe banyama oyo ekamolamá*+ mpe makila.+

  • Misala 15:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko+ mpe makila+ mpe banyama oyo ekamolamá*+ mpe pite.+ Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana,+ bokozala malamu. Bótikala malamu!”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto