Kolimbola Mibeko 24:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 “Kebá na maladi ya maba+ mpo omibatela mpe osala na kolanda nyonso oyo banganga-nzambe, Balevi, bakolakisa bino.+ Kaka ndenge napesi bango mitindo, bosengeli kokeba+ ete bósala bongo. Malaki 2:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpo mbɛbu ya nganga-nzambe nde esengeli kobatela boyebi, mpe mobeko nde eloko oyo bato basengeli koluka na monɔkɔ na ye;+ mpo ye azali momemi-nsango ya Yehova ya mampinga.+ Luka 17:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Mpe ntango amonaki bango alobaki na bango ete: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.”+ Bongo ntango bazalaki kokende bakómaki pɛto.+
8 “Kebá na maladi ya maba+ mpo omibatela mpe osala na kolanda nyonso oyo banganga-nzambe, Balevi, bakolakisa bino.+ Kaka ndenge napesi bango mitindo, bosengeli kokeba+ ete bósala bongo.
7 Mpo mbɛbu ya nganga-nzambe nde esengeli kobatela boyebi, mpe mobeko nde eloko oyo bato basengeli koluka na monɔkɔ na ye;+ mpo ye azali momemi-nsango ya Yehova ya mampinga.+
14 Mpe ntango amonaki bango alobaki na bango ete: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.”+ Bongo ntango bazalaki kokende bakómaki pɛto.+