Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Soki moto moko abimi, na loposo ya nzoto na ye, eloko moko ya kovimba to likwanza+ to litɔnɔ mpe yango ekómi maladi ya maba+ na loposo ya nzoto na ye, asengeli komemama epai ya Arona nganga-nzambe to epai ya moko ya bana na ye ya mibali, banganga-nzambe.+

  • Balevi 13:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe nganga-nzambe+ asengeli komona mosuni yango ya mobesu, mpe asengeli kotánga ye mbindo. Mosuni ya mobesu ezali mbindo. Ezali maba.+

  • 2 Ntango 26:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Ntango Azaria nganga-nzambe mokonzi mpe banganga-nzambe nyonso batalaki ye, talá, maba ezwi ye na elongi.+ Bongo balongolaki ye kuna mbangumbangu, mpe ye moko lisusu asalaki mbangu mpo na kobima, mpo Yehova abɛtaki ye.+

  • Malaki 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo mbɛbu ya nganga-nzambe nde esengeli kobatela boyebi, mpe mobeko nde eloko oyo bato basengeli koluka na monɔkɔ na ye;+ mpo ye azali momemi-nsango ya Yehova ya mampinga.+

  • Marko 1:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 mpe alobaki na ye: “Kebá, koyebisa moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe+ mpe, mpo na kopɛtolama na yo, pesá biloko oyo Moize asɛngaki,+ mpo bámona ete obiki.”+

  • Luka 17:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe ntango amonaki bango alobaki na bango ete: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.”+ Bongo ntango bazalaki kokende bakómaki pɛto.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto