6 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo.+ Yo nde Yehova Nzambe na yo aponi mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+
2 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu+ na miso ya Yehova Nzambe na yo, mpe Yehova aponi yo mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko,+ kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.
14 oyo amipesaki+ mpo na biso mpo asikola+ biso na makambo ya ndenge nyonso ya kobuka mibeko mpe apɛtola+ mpo na ye bato oyo bazali bato na ye moko,+ oyo bazali na molende na misala ya malamu.+