Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 7:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ya solo, ndako na yo mpe bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi mpo na ntango oyo etyami ndelo te liboso na yo; kiti na yo ya bokonzi ekokóma kiti oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”’”+

  • Yisaya 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+

  • Yisaya 14:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kasi yo, olobi na motema na yo ete: ‘Nakomata na likoló.+ Nakotombola kiti na ngai ya bokonzi+ likoló ya minzoto+ ya Nzambe, mpe nakofanda na ngomba ya kokutana,+ na nsukansuka ya nɔrdi.+

  • Yirimia 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+

  • Ezekiele 21:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Nakokómisa yango libebi, libebi, libebi.+ Yango mpe, ya solo ekozala ya moto moko te tii ntango ye oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko akoya,+ mpe nakopesa ye mpenza yango.’+

  • 2 Petro 1:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Yango wana, kondima oyo tondimeli liloba ya esakweli+ ekómi lisusu makasi koleka;+ mpe bozali kosala malamu na ndenge bozali kotyela yango likebi lokola mwinda+ oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili na kati ya mitema na bino, tii ntango ntɔngɔ ekobanda kotana mpe monzoto ya ntɔngɔ+ ekobima.

  • Emoniseli 22:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “‘Ngai, Yesu, natindaki anzelu na ngai atatwela bino makambo wana mpo na masangá. Nazali mosisa+ mpe mwana+ ya Davidi, mpe monzoto ya ntɔngɔ oyo engɛngaka.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto