Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na mokolo yango, mwa nzete oyo Yehova akokolisa+ ekozala mpo na kitoko mpe mpo na nkembo,+ mpe mbuma ya mokili ekozala eloko moko ya komikumisa na yango+ mpe eloko moko kitoko mpo na bato ya Yisraele oyo babiki.+

  • Yisaya 11:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe mwa etape+ ekobima mpenza na ekumu ya Yese;+ mpe mwa nzete ya sika+ oyo ekobima na misisa na ye ekobota.+

  • Yisaya 53:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe akobima lokola mwa nzete+ liboso ya moto, mpe lokola mosisa oyo ezali kobima na mokili oyo ezangá mai. Azali engambe te, na nkembo mpe te;+ mpe ntango tokomona ye, lolenge na ye ekopesa biso mposa ya kolinga ye te.+

  • Yirimia 33:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na mikolo yango mpe na ntango yango, nakobimisela Davidi etape ya boyengebene,+ mpe ye akosala mpenza na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+

  • Zekaria 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘Ee Yosua nganga-nzambe monene, yoká, nabondeli yo, yo ná baninga na yo oyo bafandi liboso na yo, mpo bazali bato oyo bazali makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya;+ mpo talá nazali kokɔtisa Etape,+ ye mosaleli na ngai!+

  • Matai 2:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpe afandaki na engumba moko na nkombo Nazarete,+ mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya basakoli ekokisama: “Bakobenga ye Monazarete.”+

  • Yoane 1:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Filipe akutanaki na Natanaele+ mpe alobaki na ye ete: “Tomoni moto oyo Moize, na kati ya Mibeko,+ mpe Basakoli+ bakomaki mpo na ye, Yesu, mwana ya Yozefe,+ moto ya Nazarete.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto