Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 22:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Moto oyo apesi banzambe mosusu mbeka na esika ya kopesa yango kaka Yehova, asengeli kobomama.+

  • Kobima 32:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Sikoyo alobaki na bango ete: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Moto na moto kati na bino atya mopanga na ye na loketo na ye. Bóleka mpe bózonga na esika na esika ya kokɔta na kaa mpe moto na moto aboma ndeko na ye mpe moto na moto aboma moninga na ye mpe moto na moto aboma moninga na ye ya motema.’”+

  • Kolimbola Mibeko 13:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 osengeli te kosala ndenge ye alingi to koyoka ye,+ mpe liso na yo ekoyokela ye mawa te, mpe osengeli komonisela ye motema mawa te,+ mpe osengeli kobomba ye te;

  • Kolimbola Mibeko 13:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 kasi osengeli mpenza koboma ye.+ Lobɔkɔ na yo ekozala lobɔkɔ ya liboso oyo ekokitela ye mpo na koboma ye, mpe na nsima lobɔkɔ ya bato nyonso.+

  • 1 Bakonzi 18:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 Bongo Eliya alobaki na bango ete: “Bókanga basakoli ya Baala! Bótika te ete moto na bango ata moko akima!” Na mbala moko, bakangaki bango, mpe na nsima, Eliya akitaki na bango na lobwaku ya mokɛli ya Kishone+ mpe abomaki bango kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto