31 “Mpe osengeli kosala rido+ na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá. Akosala yango ezala na bakeruba,+ mosala ya moto oyo asalaka mayemi na bansinga.
35 Mpe abandaki kosala rido+ na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá. Asalaki yango ezala na bakeruba, mosala ya moto oyo asalaka mayemi na bansinga.+
2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+
31 Mpe mokumba+ na bango ezalaki Sanduku+ ná mesa,+ etɛlɛmiselo ya miinda+ ná bitumbelo,+ bisaleli+ ya esika mosantu oyo bazalaki kosala na yango mosala, ná elamba ya kozipa,+ ná mosala na yango nyonso.