23 Bongo Arona akamataki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabe, ndeko mwasi ya Nahashone,+ mpo azala mwasi na ye. Na nsima Elisheba abotelaki ye Nadabe ná Abihu, Eleazare ná Itamare.+
4 Nzokande, Nadabe ná Abihu bakufaki na miso ya Yehova ntango bapesaki liboso ya Yehova mɔtɔ oyo endimami na mobeko te,+ na esobe ya Sinai; babotaki mpe bana te. Kasi Eleazare+ ná Itamare+ bakobaki kosala mosala ya banganga-nzambe elongo na Arona tata na bango.
33 Wana ezali mosala ya mabota ya bana mibali ya Merari,+ engebene mosala nyonso na bango na hema ya kokutana, na litambwisi ya Itamare mwana ya Arona nganga-nzambe.”+
8 mpe apesaki bana mibali ya Merari bapusu minei mpe ngɔmbɛ mwambe na kotalela mosala na bango,+ na litambwisi ya Itamare mwana ya Arona nganga-nzambe.+