4 Nzokande, Nadabe ná Abihu bakufaki na miso ya Yehova ntango bapesaki liboso ya Yehova mɔtɔ oyo epesamaki nzela te+ na esobe ya Sinai, mpe babotaki bana te. Kasi Eleazare+ ná Itamare+ bakobaki kosala mosala ya banganga-nzambe elongo na Arona tata na bango.