5“‘Sikoyo soki molimo+ moko asali lisumu na ndenge ayoki elakeli mabe+ ya polele oyo esɛngi ye atatola lisumu oyo moto moko asali, oyo ye amonaki to ayei koyeba, kasi ayebisi+ yango te, asengeli kozongisa monɔkɔ mpo na libunga na ye.
2 “Soki molimo moko asali lisumu na ndenge azangi mpenza bosembo epai ya Yehova+ mpe akosi mpenza+ moninga na ye, mpo na eloko moko oyo ezali na mabɔkɔ na ye to eloko oyo babombisi na lobɔkɔ+ na ye to eloko ya moyibi to abubi moninga na ye,+