Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 15:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bongo Bayisraele nyonso bazalaki komatisa sanduku ya kondimana ya Yehova na koganga ya esengo+ mpe na lokito ya liseke,+ na bakelelo+ mpe na basɛmbalɛ,+ bazalaki kobɛta bibɛtɛlo ya bansinga makasi mpe na banzɛnzɛ.+

  • 2 Ntango 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 mpe Balevi+ oyo bazalaki bayembi na bango nyonso, elingi koloba, ya Asafe,+ ya Hemane,+ ya Yedutune+ mpe ya bana na bango mpe ya bandeko na bango oyo balati elamba ya kitoko, ná basɛmbalɛ,+ bibɛtɛlo ya bansinga+ ná banzɛnzɛ,+ batɛlɛmaki na ɛsti ya etumbelo mpe elongo na bango, banganga-nzambe nkama moko na ntuku mibale (120), bazalaki kobɛta kelelo;+

  • 2 Ntango 7:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe banganga-nzambe+ batɛlɛmaki na bisika na bango ya mosala, mpe Balevi+ bazalaki na bibɛtɛlo ya nzembo+ mpo na Yehova oyo mokonzi Davidi+ asalaki mpo na kopesa Yehova matɔndi, “mpo motema boboto na ye ezali seko na seko,” ntango Davidi azalaki kopesa masanzoli na lobɔkɔ na bango; mpe banganga-nzambe bazalaki kobɛta bakelelo+ makasi liboso na bango, wana Bayisraele nyonso batɛlɛmi.

  • Ezera 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ntango batongi batyaki moboko+ ya tempelo ya Yehova, banganga-nzambe balati bilamba ya mosala+ na bango, bazalaki na bakelelo,+ mpe Balevi bana ya Asafe,+ bazalaki na basɛmbalɛ,+ batɛlɛmaki mpo na kosanzola Yehova na kolanda malako+ ya Davidi mokonzi ya Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto