Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 15:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bongo Davidi alobaki na bakapita ya Balevi bátya bandeko na bango bayembi+ elongo na bibɛtɛlo ya nzembo,+ bibɛtɛlo ya bansinga,+ banzɛnzɛ+ mpe basɛmbalɛ,+ bábɛta makasi mpo na kobimisa lokito ya esengo.

  • 1 Ntango 16:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Na nsima, atyaki Balevi+ mosusu bázala basaleli+ liboso ya sanduku ya Yehova, mpo na kokundwela+ bato mpe mpo na kopesa matɔndi+ mpe kosanzola+ Yehova Nzambe ya Yisraele,

  • 1 Ntango 23:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Na yango, batángaki Balevi banda na mbula ntuku misato (30) tii na likoló;+ mpe motángo na bango, mokomoko* na bango, mobali makasi na mobali makasi: bato nkóto ntuku misato na mwambe (38 000).

  • 1 Ntango 25:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Lisusu, Davidi ná bakapita+ ya bituluku ya mosala+ batyaki pembeni bana mosusu ya Asafe, ya Hemane+ mpe ya Yedutune+ mpo na kosala mosala, bango bazalaki kosakola na banzɛnzɛ,+ na bibɛtɛlo ya bansinga+ mpe na basɛmbalɛ.+ Mpe bato oyo bapesamaki mikumba mpo na mosala na bango bazwamaki na kati na bango.

  • 2 Ntango 29:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na ntango yango, atɛlɛmisaki Balevi+ na ndako ya Yehova, na basɛmbalɛ,+ na bibɛtɛlo ya bansinga+ mpe banzɛnzɛ,+ na kolanda mitindo ya Davidi+ mpe ya Gade,+ momoni-bimonaneli ya mokonzi, mpe ya mosakoli Natane,+ mpo na lobɔkɔ ya Yehova nde mitindo yango epesamaki na nzela ya basakoli na ye.+

  • Ezera 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ntango batongi batyaki moboko+ ya tempelo ya Yehova, banganga-nzambe balati bilamba ya mosala+ na bango, bazalaki na bakelelo,+ mpe Balevi bana ya Asafe,+ bazalaki na basɛmbalɛ,+ batɛlɛmaki mpo na kosanzola Yehova na kolanda malako+ ya Davidi mokonzi ya Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto