Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 23:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Mbuma oyo eleki malamu kati na mbuma ya liboso oyo eteli ya mabele na yo, okomema yango na ndako ya Yehova Nzambe na yo.+

      “Osengeli te kolamba mwana-ntaba na kati ya mabɛlɛ ya mama na yango.+

  • Balevi 23:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Ntango bokokɔta na mokili oyo nazali kopesa bino, mpe bokobuka mbuma na yango, bosengeli mpe komemela nganga-nzambe liboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini na mbuma ya liboso+ oyo bobuki.

  • Mitángo 18:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mafuta nyonso oyo eleki kitoko mpe vinyo nyonso ya sika oyo eleki kitoko mpe mbuma, mbuma na bango ya liboso,+ oyo bakopesa Yehova, napesi yo yango.+

  • 2 Ntango 31:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ntango kaka liloba ebimaki, bana ya Yisraele+ babakisaki mbuma ya liboso ya mbuma ya kosala farini,+ ya vinyo ya sika,+ mpe ya mafuta+ mpe ya mafuta ya nzoi+ mpe ya biloko nyonso oyo euti na bilanga,+ mpe moko ya bandambo zomi ya eloko nyonso, bayaki na yango ebele.+

  • Nehemia 10:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 mpe mpo na komema mbuma ya liboso oyo eteli na mabele+ na biso mpe bambuma ya liboso oyo eteli ya mbuma nyonso ya nzete ya lolenge nyonso,+ mbula na mbula, na ndako ya Yehova;

  • Masese 3:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya+ mpe na mbuma ya liboso ya biloko na yo nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto