Kobima 20:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 “Kumisá tata na yo mpe mama na yo+ mpo bomoi na yo ezala molai na mabele oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ Balevi 19:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 “‘Bokobanga moto na moto mama na ye mpe tata na ye,+ mpe bokotosa+ basabata na ngai. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino. Kolimbola Mibeko 21:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 “Soki moto moko azali na mwana ya motó makasi mpe motomboki,+ oyo azali koyoka te mongongo ya tata na ye to mongongo ya mama na ye,+ mpe basemboli ye kasi alingi koyokela bango te,+ Kolimbola Mibeko 21:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Bongo mibali nyonso ya engumba na ye basengeli kobamba ye mabanga, mpe asengeli kokufa. Boye osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo, mpe Yisraele mobimba ekoyoka mpe ekobanga mpenza.+ Masese 20:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Ye oyo azali kolakela tata na ye ná mama na ye mabe,+ mwinda na ye ekobomama wana molili ekómi pene.+ Masese 30:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Liso oyo ezali kosɛka tata mpe ezali kotyola botosi epai ya mama+—bayanganga ya lobwaku ya mokɛli ekotɔbɔla yango mpe bana ya mpongo bakolya yango. Matai 15:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Na ndakisa, Nzambe alobaki ete: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’;+ mpe, ‘Moto oyo afingi tata to mama akufa.’+
12 “Kumisá tata na yo mpe mama na yo+ mpo bomoi na yo ezala molai na mabele oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+
3 “‘Bokobanga moto na moto mama na ye mpe tata na ye,+ mpe bokotosa+ basabata na ngai. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.
18 “Soki moto moko azali na mwana ya motó makasi mpe motomboki,+ oyo azali koyoka te mongongo ya tata na ye to mongongo ya mama na ye,+ mpe basemboli ye kasi alingi koyokela bango te,+
21 Bongo mibali nyonso ya engumba na ye basengeli kobamba ye mabanga, mpe asengeli kokufa. Boye osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo, mpe Yisraele mobimba ekoyoka mpe ekobanga mpenza.+
20 Ye oyo azali kolakela tata na ye ná mama na ye mabe,+ mwinda na ye ekobomama wana molili ekómi pene.+
17 Liso oyo ezali kosɛka tata mpe ezali kotyola botosi epai ya mama+—bayanganga ya lobwaku ya mokɛli ekotɔbɔla yango mpe bana ya mpongo bakolya yango.
4 Na ndakisa, Nzambe alobaki ete: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’;+ mpe, ‘Moto oyo afingi tata to mama akufa.’+