Kobima 20:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 “Kumisá tata na yo mpe mama na yo+ mpo bomoi na yo ezala molai na mabele oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ Kolimbola Mibeko 27:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 “‘Alakelama mabe moto oyo azali kotyola tata na ye to mama na ye.’+ (Mpe bato nyonso basengeli koloba: ‘Amen!’) Masese 1:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo,+ mpe kotika mobeko ya mama na yo te.+ Masese 20:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Ye oyo azali kolakela tata na ye ná mama na ye mabe,+ mwinda na ye ekobomama wana molili ekómi pene.+ Ezekiele 22:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Batyoli tata ná mama epai na yo.+ Babubi moto oyo afandi mopaya epai na yo.+ Banyokoli mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá na kati na yo.”’”+ Baefese 6:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Bana, bótosaka baboti+ na bino na boyokani+ na Nkolo, mpo yango ezali likambo ya boyengebene:+
12 “Kumisá tata na yo mpe mama na yo+ mpo bomoi na yo ezala molai na mabele oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+
16 “‘Alakelama mabe moto oyo azali kotyola tata na ye to mama na ye.’+ (Mpe bato nyonso basengeli koloba: ‘Amen!’)
20 Ye oyo azali kolakela tata na ye ná mama na ye mabe,+ mwinda na ye ekobomama wana molili ekómi pene.+
7 Batyoli tata ná mama epai na yo.+ Babubi moto oyo afandi mopaya epai na yo.+ Banyokoli mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá na kati na yo.”’”+