Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 5:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango,+ mpamba te ngai Yehova Nzambe na yo nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye,+ nayeisaka etumbu mpo na libunga ya batata likoló ya bana mpe likoló ya libota ya misato mpe likoló ya libota ya minei ya baoyo bayinaka ngai;+

  • Bileli 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Miso na ngai elɛmbi na kobimisa mpisoli.+ Misɔpɔ na ngai ezali na yikiyiki.+

      Libale na ngai esopani na mabele mpenza,+ mpo na kokwea ya mwana mwasi ya bato ya ekólo na ngai,+

      Mpo mwana mpe mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ balɛmbaki makasi na bisika minene ya bato nyonso ya sité.+

  • Bileli 2:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Tɛlɛmá! Gangá na mawa na butu, na ebandeli ya bileko ya kokɛngɛla ya ntɔngɔ.+

      Sopá motema na yo+ lokola mai liboso ya elongi+ ya Yehova.

      Tombolelá ye mabɔkɔ+ na yo mpo na molimo ya bana na yo,

      Oyo bazali kolɛmba makasi mpo na nzala na ebandeli ya babalabala nyonso.+

  • Bileli 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mabɔkɔ ya basi oyo bazalaka na motema mawa elambi bana na bango moko.+

      Bakómi lokola limpa ya kobɔndisa mpo na bato na ntango ya kokwea ya mwana mwasi ya bato na ngai.+

  • Hosea 9:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpo, atako bazali kobɔkɔla bana na bango ya mibali, ngai mpe nakozangisa bango bana bongo mobali oyo akoli akozala te;+ mpo—mawa na bango lisusu, ntango nakopesa bango mokɔngɔ!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto