Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, Nzambe alobaki lisusu na Moize ete:

      “Talá oyo okoloba na bana ya Yisraele: ‘Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, Nzambe ya Abrahama,+ Nzambe ya Yisaka+ mpe Nzambe ya Yakobo,+ atindi ngai epai na bino.’ Wana nde nkombo na ngai mpo na seko,+ mpe wana nde ekaniseli na ngai bileko na bileko.+

  • Kobima 6:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe nazalaki kobimela Abrahama,+ Yisaka+ ná Yakobo+ lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ kasi mpo na nkombo na ngai Yehova,+ namiyebisaki+ epai na bango te.

  • Kobima 20:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Ngai nazali Yehova Nzambe na yo,+ ngai moto nabimisi yo na mokili ya Ezipito, na ndako ya boombo.+

  • Nzembo 83:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpo báyeba+ ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+

      Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló+ na mabele mobimba.+

  • Nzembo 113:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Banda epai moi ebimaka kino epai yango elalaka+

      Nkombo ya Yehova esengeli kosanzolama.+

  • Yisaya 42:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai;+ mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te,+ lisanzoli na ngai+ na bikeko oyo eyemami mpe te.+

  • Malaki 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Soki boyoki te,+ mpe soki botye na motema te+ likambo ya kopesa nkombo na ngai nkembo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “ngai mpe nakotindela bino elakeli mabe,+ mpe nakolakela mapamboli na bino mabe.+ Ɛɛ, kutu nalakeli lipamboli yango mabe, mpo bozali kotya yango na motema te.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto