Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, bana ya Yuda bayaki epai ya Yosua na Gilgale+ mpe Kalebe+ mwana ya Yefune Mokenize+ alobaki na ye boye: “Yo, oyebi malamu liloba oyo Yehova alobaki+ na Moize, moto ya Nzambe ya solo,+ mpo na ngai mpe mpo na yo na Kadeshe-barnea.+

  • Nzembo 90:maloba ya ebandeli ya loyembo-17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Libondeli ya Moize, moto ya Nzambe ya solo.+

      90 Ee Yehova, yo nde ozali esika na biso ya kofanda ya solosolo+

      Libota na libota.+

       2 Liboso bangomba ebotama,+

      To obanda kobimisa mokili+ mpe mabele oyo ebotaka,+ lokola na mpasi ya kobota,

      Ɛɛ, libela na libela yo ozali Nzambe.+

       3 Ozongisaka moto​—mowei mpamba​—akóma eloko oyo batutituti,+

      Mpe olobaka: “Bózonga na putulu, bino bana ya bato.”+

       4 Mpo, na miso na yo, mbula nkóto ezali kaka lokola mokolo ya lobi ntango eleki,+

      Mpe lokola eleko ya kokɛngɛla ya butu.+

       5 Okɔmbɔli bango;+ balimwe lokola ndɔtɔ;+

      Na ntɔngɔ, bazali lokola matiti ya mobesu oyo ezali kobima.+

       6 Na ntɔngɔ, ebimisaka fololo mpe ekómaka ya sika;+

      Na mpokwa, ebebaka mpe ekaukaka mpenza.+

       7 Mpamba te, na nkanda na yo tosuki,+

      Mpe na nkɛlɛ na yo tobulungani.+

       8 Otye mabunga na biso liboso na yo mpenza,+

      Otye misala na biso oyo ebombami liboso ya elongi na yo oyo ezali kongɛnga.+

       9 Mpamba te, na nkɛlɛ na yo, mikolo na biso nyonso ekómi pene na nsuka na yango;+

      Tosilisi bambula na biso noki lokola mwa mpema oyo ebimi na monɔkɔ.+

      10 Mikolo ya bambula na biso ezali mbula ntuku nsambo (70);+

      Mpe soki mpo na nguya mingi ekómi mbula ntuku mwambe (80),+

      Yango etondi kaka na mawa mpe na makambo oyo eyokisaka mpasi;+

      Mpo ekoleka mpenza nokinoki, mpe tozali kopumbwa mpe kokende.+

      11 Nani ayebi makasi ya nkanda na yo+

      Mpe nani ayebi nkɛlɛ na yo? Ekokani na kobanga oyo tosengeli kobanga yo.+

      12 Lakisá biso ndenge ya kotánga mikolo na biso mpo+

      Tókóma na motema ya bwanya.+

      13 Ee Yehova, zongá!+ Ekozala tii ntango nini?+

      Mpe yokelá basaleli na yo mawa.+

      14 Na ntɔngɔ, tondisá biso na motema boboto na yo,+

      Mpo tóganga na esengo mpe tósepela mikolo na biso nyonso.+

      15 Salá ete mikolo oyo okosepelisa biso ekokana na mikolo oyo omonisaki biso mpasi,+

      Bambula oyo tomoni mpasi.+

      16 Basaleli na yo bámona mosala na yo+

      Mpe nkembo na yo ezala likoló ya bana na bango.+

      17 Mpe Yehova Nzambe na biso asepela na biso,+

      Mpe longisá mosala ya mabɔkɔ na biso.+

      Ɛɛ, longisá mosala ya mabɔkɔ na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto