Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 32:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe Yehova abandaki koyoka mawa mpo na mabe oyo alobaki ete akosalela bato na ye.+

  • Kolimbola Mibeko 13:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe eloko ata moko te oyo ekómisami ekila mpo ebebisama ekokangama na lobɔkɔ na yo,+ mpo Yehova atika nkanda na ye ya kongala+ mpe ayokela yo mpenza mawa mpe amonisela yo mpenza mawa+ mpe akómisa yo mingi, kaka ndenge alapelaki bankɔkɔ na yo ndai.+

  • Kolimbola Mibeko 32:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpo Yehova akosambisa bato na ye+

      Mpe akoyokela basaleli na ye mawa,+

      Mpo akomona ete lisungi elongwe

      Mpe kaka moto oyo azangi makoki mpe azangi ntina nde azali.

  • Nzembo 135:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo Yehova akosamba likambo ya bato na ye,+

      Mpe akoyokela basaleli na ye mawa.+

  • Amose 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Yehova ayokaki mawa mpo na yango.+ “Ekosalema te,” Yehova alobaki bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto