Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 14:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Likambo moko kaka, bótombokela Yehova te;+ mpe bino, bóbanga bato ya mokili yango te,+ mpo bazali lokola limpa na miso na biso. Bisika na bango ya komibatela ekimi bango,+ mpe Yehova azali elongo na biso.+ Bóbanga bango te.”+

  • Yosua 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Napesi yo mitindo te?+ Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te,+ mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”+

  • Nzembo 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+

      Nakobanga nani?+

      Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

      Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+

  • Yisaya 41:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kobanga te, mpo nazali na yo.+ Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.+ Nakopesa yo makasi.+ Nakosalisa yo mpenza.+ Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali+ ya boyengebene.’+

  • Baebre 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo tózala na mpiko mpenza+ mpe tóloba: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto