25 Moto moko te akotɛlɛma liboso na bino.+ Yehova Nzambe na bino akotya nsɔmɔ na bino mpe kobanga na bino liboso ya mokili+ mobimba oyo bokonyata, kaka ndenge apesi bino elaka.
5 Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo.+ Ndenge nazalaki na Moize, ndenge wana nde nakozala na yo.+ Nakosundola yo te mpe nakotika yo soki moke te.+
9 Mpe Yehova akobengana bikólo ya minene mpe ya nguya liboso na bino.+ (Mpe bino, moto moko te akokaki kotɛlɛma liboso na bino tii na mokolo ya lelo.)+