24 Mpe akopesa mpenza bakonzi na bango na lobɔkɔ na yo,+ mpe yo osengeli kolongola nkombo na bango na nse ya lola.+ Moto moko te akotɛlɛma liboso na yo,+ kino okosilisa bango nyɛɛ.+
25 Moto moko te akotɛlɛma liboso na bino.+ Yehova Nzambe na bino akotya nsɔmɔ na bino mpe kobanga na bino liboso ya mokili+ mobimba oyo bokonyata, kaka ndenge apesi bino elaka.