Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 23:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 Mpe na mokolo ya liboso, bosengeli kozwa mbuma ya nzete ya kitoko, mandalala+ mpe bitape ya nzete oyo ezali na nkasa mingi mpe nzete ya arava ya lobwaku ya mokɛli, mpe bosengeli kosepela+ liboso ya Yehova Nzambe na bino mikolo nsambo.

  • Kolimbola Mibeko 12:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bosengeli kosepela liboso ya Yehova Nzambe+ na bino, bino ná bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi ná baombo na bino ya mibali ná baombo na bino ya basi mpe Molevi oyo azali na kati ya baporte na bino, mpo azali na likabo te to na libula te elongo na bino.+

  • Kolimbola Mibeko 12:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Kasi liboso ya Yehova Nzambe na yo nde okolya yango, na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona,+ yo ná mwana na yo ya mobali ná mwana na yo ya mwasi ná moombo na yo ya mobali ná moombo na yo ya mwasi mpe Molevi oyo azali na kati ya baporte na yo; mpe osengeli kosepela+ liboso ya Yehova Nzambe na yo na misala na yo nyonso.

  • Kolimbola Mibeko 14:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Osengeli mpe kopesa mbongo mpo na eloko nyonso oyo molimo na yo ekoyoka mposa+ na yango, na ndakisa bangɔmbɛ, bampate ná bantaba, vinyo ná masanga oyo elangwisaka,+ mpe mpo na eloko nyonso oyo molimo na yo ekosɛnga yo; mpe osengeli kolya wana liboso ya Yehova Nzambe na yo mpe kosepela,+ yo ná bato ya ndako na yo.

  • Nzembo 32:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bósepela na Yehova mpe bózala na esengo, bino bayengebene;+

      Mpe bóganga na esengo, bino nyonso oyo bozali na motema sembo.+

  • Nzembo 100:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Bósalela Yehova na esengo.+

      Bókɔta liboso na ye na koganga ya esengo.+

  • Bafilipi 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo.+ Nakoloba lisusu ete: Bósepelaka!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto