Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 14:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe Molevi,+ lokola azali na likabo te mpe na libula te elongo na yo, ná moto oyo afandi mopaya+ ná mwana mobali oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá,+ oyo bazali na kati ya baporte na yo, basengeli koya, mpe basengeli kolya mpe kotonda; mpo Yehova Nzambe na yo apambola+ yo na misala+ nyonso oyo okosala na lobɔkɔ na yo.

  • Kolimbola Mibeko 28:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpo na yo, Yehova akopesa etinda ete lipamboli ezala likoló ya bibombelo na yo ya biloko+ mpe likoló ya misala na yo nyonso,+ mpe akopambola yo mpenza na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.

  • Masese 11:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Molimo oyo ekabaka ekokóma mafutamafuta,+ mpe moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.+

  • Masese 14:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Ye oyo azali kotyola moninga na ye azali kosala lisumu,+ kasi esengo na ye oyo azali komonisela bato ya mpasi boboto.+

  • Masese 28:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Ye oyo azali kopesa eloko na moto oyo akelelá akokelela te,+ kasi ye oyo azali kobomba miso na ye akozwa bilakeli mabe mingi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto