7 “Soki moko ya bandeko na yo akómi mobola epai na yo na moko ya bingumba na yo, na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, osengeli te koyeisa motema na yo makasi to kokangela ndeko na yo mobola lobɔkɔ.+
7 Ezali nde kokabola limpa na yo na moto oyo azali na nzala,+ mpe ete okɔtisa na ndako na yo bato ya mpasi, bato oyo bazangá ndako, boye te?+ Soki omoni moto moko bolumbu, olatisa ye,+ mpe omibomba te liboso ya moto oyo azali ndeko na yo, boye te?+