Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 15:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Nzokande, moto moko te asengeli kokóma mobola epai na yo, mpamba te Yehova akopambola+ yo mpenza na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo lokola libula mpo na kozwa yango,+

  • Kolimbola Mibeko 24:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Soki obuki mbuma na yo na elanga na yo,+ mpe obosani na elanga liboke moko ya matiti ya mbuma ya kosala farini, osengeli kozonga te mpo na kozwa yango. Ekotikala mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana mobali oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá;+ mpo ete Yehova Nzambe na yo apambola yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo.+

  • Nzembo 41:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá;+

      Na mokolo ya likama Yehova akobikisa ye.+

  • Masese 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ye oyo azali na liso ya boboto akopambwama, mpo apesi bilei na ye na moto oyo azangá.+

  • Yisaya 32:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bongo mokabi apesi toli mpo na makambo ya bokabi; mpe akotɛlɛma mpo na makambo ya bokabi.+

  • 2 Bakorinti 9:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kutu, Nzambe akoki kosala ete boboto monene na ye nyonso etonda epai na bino, ete, wana bozali ntango nyonso na oyo ekoki na bino na makambo nyonso, bózala na yango mingi mpenza mpo na mosala nyonso ya malamu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto