Ebandeli 9:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Kaka nde bosengeli kolya+ mosuni ná molimo na yango te,+ elingi koloba makila na yango.+ Balevi 7:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 “‘Mpe bosengeli te kolya makila+ ya lolenge nyonso, ezala ya ndɛkɛ to ya nyama, na bisika nyonso oyo bozali kofanda. Balevi 17:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 “‘Moto nyonso ya ndako ya Yisraele to mopaya moko oyo azali kofanda mopaya na kati na bino, oyo alei lolenge nyonso ya makila,+ nakotɛmɛla mpenza molimo+ oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye. 1 Samwele 14:33 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Bongo bayebisaki Saulo ete: “Talá! Bato bazali kosalela Yehova lisumu na ndenge bazali kolya biloko ná makila.”+ Na yango ye alobaki boye: “Bosali na bosembo te. Bóbalusa naino libanga moko ya monene awa epai na ngai.” Misala 15:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 kasi ya kokomela bango ete báboya biloko oyo ekómisami mbindo na bikeko+ mpe pite+ mpe banyama oyo ekamolamá*+ mpe makila.+
26 “‘Mpe bosengeli te kolya makila+ ya lolenge nyonso, ezala ya ndɛkɛ to ya nyama, na bisika nyonso oyo bozali kofanda.
10 “‘Moto nyonso ya ndako ya Yisraele to mopaya moko oyo azali kofanda mopaya na kati na bino, oyo alei lolenge nyonso ya makila,+ nakotɛmɛla mpenza molimo+ oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye.
33 Bongo bayebisaki Saulo ete: “Talá! Bato bazali kosalela Yehova lisumu na ndenge bazali kolya biloko ná makila.”+ Na yango ye alobaki boye: “Bosali na bosembo te. Bóbalusa naino libanga moko ya monene awa epai na ngai.”
20 kasi ya kokomela bango ete báboya biloko oyo ekómisami mbindo na bikeko+ mpe pite+ mpe banyama oyo ekamolamá*+ mpe makila.+