Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 3:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe esalemaki boye: ntango akómaki kuna, abandaki koyula liseke+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime;+ mpe bana ya Yisraele babandaki kokita elongo na ye banda na etúká ya ngombangomba, ye liboso na bango.

  • Basambisi 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe bato yango nkama misato+ (300) bazalaki se koyula maseke,+ mpe Yehova asalaki ete mopanga ya moto na moto etɛmɛla moninga na ye na kati ya kaa mobimba;+ mpe bato ya kaa yango bazalaki kokima se kokima tii na Bete-shita, kolanda epai Zerera ezali, tii na pembenipembeni ya Abele-mehola,+ pene na Tabate.

  • 2 Samwele 2:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bongo Yoabe ayulaki liseke+ mpe bato nyonso batɛlɛmaki mpe balandaki Yisraele lisusu te, mpe bazongelaki lisusu etumba te.

  • Sefania 1:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 mokolo ya lokito ya liseke mpe ya elembo ya kokebisa,+ mpo na kotɛmɛla bingumba oyo ebatelami makasi mpe kotɛmɛla manɔ́ngi milai ya matumu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto