-
Kobima 28:43Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
43 Mpe Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kolata yango ntango bakokɔta na hema ya kokutana to ntango bakobɛlɛma na etumbelo mpo na kosala na esika mosantu, noki básala libunga mpe bákufa mpenza. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na ye mpe bana na ye, oyo bakoya nsima na ye.+
-
-
Kobima 29:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Mpe osengeli kokanga bango elamba ya kokanga na loketo, Arona ná bana na ye ya mibali, mpe osengeli kolínga na motó na bango eloko ya kolata na motó; mpe bonganga-nzambe esengeli kokóma mosala na bango lokola mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bongo osengeli kotondisa lobɔkɔ ya Arona mpe lobɔkɔ ya bana na ye ya mibali na nguya.*+
-