Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 11:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe nasengeli kokita+ mpe kosolola na yo wana;+ mpe nasengeli kozwa mwa ndambo ya elimo+ oyo ezali likoló na yo mpe kotya yango likoló na bango, mpe bango bakosalisa yo na komema mokumba ya bato, mpo omema yango kaka yo moko te.+

  • Basambisi 6:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Mpe elimo ya Yehova+ ekɔtelaki Gideone mpe ayulaki liseke,+ mpe Baabi-ezere+ bayanganisamaki mpo na kolanda ye.

  • Basambisi 11:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bongo elimo ya Yehova ekitelaki Yefeta,+ mpe alekaki na Gileade mpe na Manase mpe alekaki na Mizipe ya Gileade,+ mpe longwa na Mizipe ya Gileade, akendaki epai ya bana ya Amone.

  • Basambisi 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo elimo ya Yehova ekómaki kosala kati na ye+ mpe apasolaki mwana-nkɔsi yango na mibale, ndenge bapasolaka mwana-ntaba, nzokande azalaki na eloko moko te na lobɔkɔ na ye. Mpe ayebisaki te tata na ye to mama na ye likambo oyo asalaki.

  • Basambisi 15:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo ye, ayaki tii na Lehi, mpe Bafilistia bagangaki na esengo ntango bamonaki ye.+ Nde elimo ya Yehova+ ekómaki kosala kati na ye mpe bansinga oyo ezalaki na mabɔkɔ na ye ekómaki lokola nsinga ya lini oyo eziki na mɔtɔ,+ mpe bikangeli yango enyangwaki mpe elongwaki na mabɔkɔ na ye.

  • 1 Samwele 11:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ntango ayokaki maloba yango, elimo+ ya Nzambe ebandaki kosala kati na Saulo mpe nkanda na ye engalaki makasi.+

  • 1 Samwele 16:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango, Samwele azwaki liseke ya mafuta+ mpe atyaki ye mafuta na katikati ya bandeko na ye. Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.+ Na nsima, Samwele atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela, akei na Rama.+

  • 2 Ntango 15:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo elimo+ ya Nzambe ekitelaki Azaria mwana ya Odede.+

  • Yisaya 63:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Babandaki kokanisa lisusu mikolo ya kala, bakanisaki Moize mosaleli na ye: “Wapi Moto oyo abimisaki bango na mbu+ elongo na babateli ya mpate ya etonga na ye?+ Wapi Moto oyo atyaki elimo santu na Ye kati na ye?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto