Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe elimo+ ya Yehova ekitelaki ye, mpe akómaki mosambisi ya Yisraele. Ntango akendaki na etumba, Yehova apesaki Kushane-rishataime mokonzi ya Siri na lobɔkɔ na ye, bongo lobɔkɔ na ye elongaki+ Kushane-rishataime.

  • Basambisi 6:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Mpe elimo ya Yehova+ ekɔtelaki Gideone mpe ayulaki liseke,+ mpe Baabi-ezere+ bayanganisamaki mpo na kolanda ye.

  • Basambisi 11:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bongo elimo ya Yehova ekitelaki Yefeta,+ mpe alekaki na Gileade mpe na Manase mpe alekaki na Mizipe ya Gileade,+ mpe longwa na Mizipe ya Gileade, akendaki epai ya bana ya Amone.

  • Basambisi 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo elimo ya Yehova ekómaki kosala kati na ye+ mpe apasolaki mwana-nkɔsi yango na mibale, ndenge bapasolaka mwana-ntaba, nzokande azalaki na eloko moko te na lobɔkɔ na ye. Mpe ayebisaki te tata na ye to mama na ye likambo oyo asalaki.

  • 1 Samwele 10:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na yango, balongwaki wana mpe bakendaki na ngomba moke, mpe kuna, etuluku moko ya basakoli ezalaki koya kokutana na ye; na mbala moko, elimo ya Nzambe ekómaki kosala kati na ye,+ mpe akómaki koloba lokola mosakoli+ na katikati na bango.

  • 1 Samwele 16:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango, Samwele azwaki liseke ya mafuta+ mpe atyaki ye mafuta na katikati ya bandeko na ye. Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.+ Na nsima, Samwele atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela, akei na Rama.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto