Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Moize akómaki mobateli ya mpate ya Yetro,+ nganga-nzambe ya Midiane, oyo Moize azalaki bokilo na ye.+ Wana azalaki komema etonga na ngámbo ya wɛsti ya esobe, nsukansuka akómaki na ngomba ya Nzambe ya solo,+ na Horebe.+

  • Kobima 4:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bongo Moize akendaki mpe azongaki epai ya Yetro bokilo na ye mpe alobaki na ye ete:+ “Nabondeli yo, nalingi kokende mpe kozonga epai ya bandeko na ngai oyo bazali na Ezipito mpo namona soki bazali naino na bomoi.”+ Na yango, Yetro alobaki na Moize ete: “Kende na kimya.”+

  • Kobima 18:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Sikoyo Yetro nganga-nzambe ya Midiane, bokilo ya Moize,+ ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moize mpe Yisraele bato na ye, ndenge Yehova abimisaki Yisraele na Ezipito.+

  • Mitángo 10:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bongo Moize alobaki na Hobabe mwana ya Rewele+ Momidiane, bokilo ya Moize boye: “Tozali kolongwa mpo na kokende na esika oyo Yehova alobaki ete: ‘Nakopesa bino yango.’+ Yaká elongo na biso, mpe tokosalela yo mpenza malamu,+ mpo Yehova alobi makambo ya malamu mpo na Yisraele.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto