Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 18:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Na yango, bakamataki mwana-ngɔmbɛ oyo apesaki bango. Bongo balɛngɛlaki yango mpe babelelaki nkombo ya Baala banda ntɔngɔ tii na midi, bazalaki koloba: “Ee Baala, yanolá biso!” Kasi mongongo moko eyokanaki te,+ mpe moto moko ayanolaki te.+ Mpe bazalaki kotɛngumatɛnguma zingazinga ya etumbelo oyo basalaki.

  • 1 Bakonzi 18:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Ntango bato nyonso bamonaki yango, na mbala moko bakweaki bilongi na nse+ mpe balobaki ete: “Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!”

  • Yisaya 41:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bóloba makambo oyo ekoya na nsima, mpo tóyeba ete bozali banzambe.+ Ɛɛ, bosengeli kosala malamu to kosala mabe, mpo biso nyonso tótala epai na epai mpe tómona yango na mbala moko.+

  • Yirimia 10:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ezali lokola dɔngɔlɔmiso ya elanga ya kɔkɔmbrɛ, mpe ekoki koloba te.+ Bazali komema yango mpenza, mpo ekoki kotambola ata moke te.+ Bóbanga yango te, ekoki kosala likambo ata moko te oyo ezali komema mpasi mpe, lisusu, ekoki kosala likambo moko te ya malamu.”+

  • 1 Bakorinti 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto