2 Mpe Yehova Nzambe na yo akotikela mpenza yo bango, mpe osengeli kolonga bango.+ Okobebisa mpenza bango.+ Osengeli kosala kondimana ata moko te ná bango mpe komonisela bango boboto ata moke te.+
10 Mpe elimo+ ya Yehova ekitelaki ye, mpe akómaki mosambisi ya Yisraele. Ntango akendaki na etumba, Yehova apesaki Kushane-rishataime mokonzi ya Siri na lobɔkɔ na ye, bongo lobɔkɔ na ye elongaki+ Kushane-rishataime.
17 Bokozala na ntina ya kobunda te+ na mbala oyo. Bótɛlɛma, bóningana te+ mpe bómona lobiko+ ya Yehova mpo na bolamu na bino. Ee Yuda mpe Yerusaleme, bóbanga te, bózala na nsɔmɔ mpe te.+ Lobi, bóbimela bango, mpe Yehova akozala na bino.’”+