-
2 Bakonzi 14:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Na yango, Yehoashe mokonzi ya Yisraele atindelaki Amazia mokonzi ya Yuda bato, na maloba oyo: “Lititi ya nzubɛnzubɛ oyo ezalaki na Libá etindaki maloba epai ya sɛdrɛ+ oyo ezalaki na Libá ete: ‘Pesá mwana na ngai ya mobali mwana na yo ya mwasi azala mwasi na ye.’ Nzokande, nyama moko ya zamba oyo efandaka na esobe, oyo ezalaki na Libá, elekaki wana mpe enyataki lititi yango ya nzubɛnzubɛ.+
-
-
Yisaya 37:24Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 Na nzela ya basaleli na yo, otumoli Yehova mpe ozali koloba ete:+
‘Na ebele ya makalo na ngai ya bitumba, ngai moko+—
Nakomata mpenza tii na nsɔngɛ ya bitúká ya ngombangomba,+
Bansukansuka ya Libá;+
Mpe nakokata basɛdrɛ na yango ya milai, banzete na yango ya jenevriye+ ya kitoko mingi.
Mpe nakokóma tii na nsɔngɛ na yango oyo eleki likoló, zamba ya elanga na yango ya banzete ya mbuma.+
-