Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 nzokande tata na ngai abundelaki+ bino mpe atyaki molimo na ye+ na likama mpo na kobikisa bino na lobɔkɔ ya Midiane;+

  • 1 Samwele 19:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe atyaki molimo na ye na likama+ mpe abomaki Mofilistia wana,+ bongo Yehova apesaki Yisraele mobimba lobiko moko monene.+ Omonaki yango, mpe osepelaki. Bongo mpo na nini okosalela makila ya moto oyo azali na likambo te lisumu na ndenge okobomisa+ Davidi mpamba?”+

  • 1 Samwele 28:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Sikoyo mwasi yango ayaki epai ya Saulo mpe amonaki ete abulungani makasi. Bongo alobaki na ye boye: “Talá, mosaleli na yo atosaki mongongo na yo, mpe natyaki molimo na ngai na likama+ mpe natosaki maloba oyo oyebisaki ngai.

  • 2 Samwele 23:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe alobaki lisusu ete: “Nakoki kokanisa yango ata moke te,+ Ee Yehova, ete ngai nasala boye! Nakomɛla nde makila+ ya mibali oyo bakei kotya milimo na bango na likama?” Bongo andimaki komɛla yango te.

      Wana nde makambo mibali yango misato ya nguya basalaki.

  • Yobo 13:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo na nini nazali komema mosuni na ngai na mino na ngai

      Mpe nazali kotya molimo na ngai na likama?+

  • Nzembo 119:109
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 109 Molimo na ngai ezali na lobɔkɔ na ngai ntango nyonso;+

      Kasi nabosani mobeko na yo te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto