Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 nzokande tata na ngai abundelaki+ bino mpe atyaki molimo na ye+ na likama mpo na kobikisa bino na lobɔkɔ ya Midiane;+

  • Basambisi 12:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Ntango namonaki ete obikisi ngai te, nazwaki mokano ya kotya molimo na ngai na likama+ mpe kokende kobunda na bana ya Amone.+ Mpe Yehova apesaki bango na lobɔkɔ na ngai. Bongo mpo na nini bino boyeli ngai lelo mpo na kobunda na ngai?”

  • 1 Samwele 28:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Sikoyo mwasi yango ayaki epai ya Saulo mpe amonaki ete abulungani makasi. Bongo alobaki na ye boye: “Talá, mosaleli na yo atosaki mongongo na yo, mpe natyaki molimo na ngai na likama+ mpe natosaki maloba oyo oyebisaki ngai.

  • Nzembo 119:109
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 109 Molimo na ngai ezali na lobɔkɔ na ngai ntango nyonso;+

      Kasi nabosani mobeko na yo te.+

  • Misala 20:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Atako bongo, nazali kotalela molimo na ngai te ete ezali na ntina mingi mpo na ngai,+ eloko ya ntina nde nasilisa mbangu+ oyo nazali kopota mpe mosala+ oyo nazwaki+ epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.+

  • Bafilipi 2:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 mpamba te mpo na mosala ya Nkolo akómaki mpenza pene na liwa, atyaki molimo na ye na likama,+ mpo asala malamu mpenza na esika na bino mpo bino moko bozalaki awa te mpo na kosalela ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto