Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe bato yango balandaki bango na nzela ya Yordani na bisika oyo bakatisaka na makolo,+ mpe bakangaki porte nokinoki nsima ya kobima ya bato oyo bazalaki kolanda bango.

  • Basambisi 3:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na nsima, alobaki na bango ete: “Bólanda ngai,+ mpamba te Yehova apesi banguna na bino, Bamoabe, na lobɔkɔ na bino.”+ Bongo balandaki ye mpe bakangelaki Bamoabe bisika ya kokatisa Yordani na makolo,+ mpe balekisaki ata moto moko te.

  • Basambisi 7:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Bongo Gideone atindaki bamemi-nsango na kati ya etúká mobimba ya ngombangomba ya Efraime+ mpo báloba boye: “Bókita mpo na kokutana na Midiane mpe bókanga bamai liboso na bango, kino na Bete-bara mpe Yordani.” Bongo mibali nyonso ya Efraime babengamaki mpe bakangaki bamai+ yango kino na Bete-bara mpe Yordani.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto