6 Mpe Bafilistia babandaki koloba: “Nani asali likambo oyo?” Bongo balobaki ete: “Samsone, bokilo ya Motimina, mpo azwaki mwasi na ye mpe apesaki ye epai ya moninga ya libala ya Samsone.”+ Na yango, Bafilistia bamataki mpe batumbaki mwasi yango ná tata na ye na mɔtɔ.+