Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ezali te mpo na boyengebene+ na yo to mpo na bosembo ya motema+ na yo nde ozali kokɔta kozwa mokili na bango; ɛɛ, ezali mpo na mabe ya bikólo yango nde Yehova Nzambe na yo azali kobengana yango liboso na yo,+ mpe mpo na kokokisa liloba oyo Yehova alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo, Abrahama,+ Yisaka+ mpe Yakobo.+

  • Basambisi 12:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na nsima, mibali ya Efraime babengamaki mpe bakatisaki na nɔrdi mpe balobaki na Yefeta boye: “Mpo na nini okatisaki mpo na kobunda na bana ya Amone, kasi obengisaki biso te tókende na yo?+ Tokotumba ndako na yo na mɔtɔ, ná yo na kati.”+

  • Basambisi 14:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe esalemaki boye: na mokolo ya minei, babandaki koloba na mwasi ya Samsone boye: “Kosá mobali na yo alimbolela biso sambole yango.+ Soki te, tokotumba yo ná ndako ya tata na yo na mɔtɔ.+ Bobengisaki biso awa nde mpo na kozwa biloko na biso?”+

  • Masese 22:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Ye oyo azali kolona makambo ya kozanga boyengebene akobuka makambo oyo eyokisaka mpasi,+ kasi fimbo ya nkɛlɛ na ye ekokóma na nsuka na yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto