Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 35:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Na yango, Rashele akufaki mpe akundamaki na nzela oyo ezali kokende na Efrata, elingi koloba, Beteleme.+

  • Basambisi 19:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Nzokande, na mikolo wana, mokonzi azalaki te na Yisraele.+ Mpe esalemaki boye: Molevi moko afandaki mwa ntango na nsukansuka ya etúká ya ngombangomba ya Efraime.+ Na nsima, azwaki mwasi moko makango+ na Beteleme,+ na Yuda.

  • Ruta 1:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Nzokande esalemaki boye: na mikolo oyo basambisi+ bazalaki kotambwisa makambo, nzala+ ekɔtaki na mokili, mpe mobali moko autaki na Beteleme+ na Yuda mpo na kokende kofanda mopaya na mokili ya Moabe,+ ye, mwasi na ye ná bana na ye mibale ya mibali.

  • Mika 5:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+ yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda,+ uta na yo+ moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele,+ oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Matai 2:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nsima ya kobotama ya Yesu na Beteleme+ ya Yudea na mikolo ya Erode+ mokonzi, talá! banganga-minzoto+ bauti na ɛsti bayei na Yerusaleme,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto